Centre culturel Mgr Égide de Bœck

TOTÓMBOLA LINGÁLA

Centre culturel Mgr Égide de Bœck

Mgr Égide de Bœck
Lokótá: lingála | falansé | lingɛlɛ́sa | lialémani
Totómbola Lingála

Mgr Égide de Bœck

Lingála lilámu

Misálá

Bosúkísí

Wápi

Ekangisi

Mpô níni totómbola lingála lilámu?

Lokóta la mbóka lokóla lingála lozalí mpɔ̂ ya biso bai-ekólo Kongó lokóla mabángá likoló lya mangó bakoki kotɔnga bomoto na zebi (mayɛ́lɛ) lya moto.

Lingala lizalí na matómba ebelé :

  • moto óyo ayekoli libosó lokóta la yee malámu akotongolo mpé akoyékola nkóta isúsu mpé makambo masusu malámu mpé na bolɛmbú.
  • na bolobí lingála, tosangání bai-Kongó-Kinsásá na bikólo bisusu esíká bakolobaka lingála: Kongó-Brazzaville, Gabon, R.C.A., Sudani, Kamerun na mikili misusu mya Shina, Mputu, Ameriki b.n.b.
  • Miziki mya biso mizalí kopanza lingála bipái na bipái.
  • Lingála likolendisa bomoko bwa ekólo.
  • Lingála bikoyébisa bomei (culture) bwa Kongó mpé bwa Afríka.

Yangó wâná lingála lina lisengelí kozala lya «tómbólá-bwáká» te, Lisengelí kozala lingála linzenga mpé lya nsóló mpímbo.

© TL/CCE